sábado, 26 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Laodikia

14 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Laodikia: "Amen, temwe ya sembo mpe ya solo, motu na ebandeli na biloko nyoso oyo Nzambe asili kojalisa, alobi boye:
15 Nayebi makambo nyoso oyo osalaki. Nayebi ete ozali mpio te to moto te. Nalingaki mingi ozala moto to mpio!
16 Kasi mpo ozali mwa moto moke, elingi koloba ozali moto te, to mpio te, nakosanza yo na monoko na ngai!
17 Olobi ete: ‘Nazali motu na mosolo mingi, mpe nazali kosala misala malamu, nazangi eloko moko te.’ Kasi oyebi te ozali motu na mawa mpe mosikini! Ozali mosikini, bolumbu mpe motu akufeli miso.
18 Mpo na oyo napesi yo kosei na kosomba na maboko na ngai or oyo batu basili kopetola na moto, mpo ete ozala na mosolo. Somba na maboko na ngai mpe bilamba mpembe mpo na kolata, mpe mpo na kobomba nzoto na nsoni na yo. Mpe somba lokola nkisi na kotia na miso na yo boye okoki komona.
19 Napamelaka mpe napesaka etumbu na batu oyo nalingi. Talisa mposa monene na yo na kobongola motema.
20 Yoka, nazali kotelema na ekuke na ndako mpe nazali kobeta yango. Soki motu ayoki mongongo na ngai, mpe afungoli ekuke na ndako, nakokota epai na ye, nakolia elongo na ye mpe ye akolia elongo na ngai.
21 Batu na kolonga na etumba, nakopesa na bango ndingisa na kofanda pembeni na ngai likolo na kiti na bokonzi na ngai, lokola ngai mpenza nalongaki na etumba mpe nasili kofanda pembeni na Tata na ngai likolo na kiti na bokonzi na ye.
22 "Soki motu azali na matoi, ayoka malamu likambo Molimo azali koloba na Mangomba!" (Emoniseli 3:14-22)