sexta-feira, 25 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Filadelufia

7 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Filadelufia: "Motu oyo azali santu mpe motu ya solo, motu oyo azali na lifungola na mokonzi Davidi, motu na kofungola, mpe motu moko te akoki kokanga, motu na kokanga, mpe motu moko te akoki kofungola, alobi boye:
8 Nayebi makambo nyoso ozali kosala. Nayebi ete ozali na nguya moke, kasi otosaki maloba na ngai, mpe okanganaki makasi na makambo na ngai. Nasili kofungola monoko na ndako liboso na yo, oyo motu moko te akoki kokanga.
9 Tala likambo nakosala epai na batu oyo bazali batu na Satana, batu na lokuta yango oyo bazali kokanisa bazali Bayuda, kasi bazali Bayuda te: nakosukuma bango na koya na kogumbana na mabolongo liboso na yo na kopesa yo lokumu. Bakoyeba ete nalingi yo.
10 Mpamba te okengelaki motindo na ngai na komema mawa molai, ngai lokola nakokengela yo na ntango na mawa oyo ekokuma likolo na mokili mobimba mpo na komeka batu na mokili.
11 Nazali koya noki. Kengela makasi likambo oyo ozali na yango, boye motu moko te akoki kobotola makabo na kolonga na yo.
12 Motu na kolonga, nakotia ye lokola likonzi kati na ndako na Nzambe na ngai, mpe ye akobima kuna soki moke te. Nakokoma na nzoto na ye nkombo na Nzambe na ngai, mpe nkombo na vile na Nzambe na ngai, Yerusalema ya sika oyo ekokita na lora kouta epai na Nzambe na ngai. Mpe nakokoma na nzoto na ye nkombo ya sika na ngai.
13 "Soki motu azali na matoi, ayoka likambo Molimo azali koloba na Mangomba!" (Emoniseli 3:7-13)