domingo, 20 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Efeso

1 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Efeso: "Motu na kokamata mioto nsambo na loboko drwati na ye, motu na kotambola katikati na miinda nsambo ya or alobi boye:
2 Nayebi makambo nyoso osalaki. Nayebi omipesaki mosala makasi, mpe otalisaki motema molai. Nayebi yango, okoki te kondima batu mabe, omekaki batu oyo balobi bazali bantoma kasi bazali bantoma te, mpe ozwaki bazali batu na lokuta.
3 Yo ozali na motema molai, omemaki mawa mpo na ngai mpe olembaki te.
4 Kasi nazali na likambo oyo epai na yo: olingi ngai lisusu te lokola na liboso.
5 Bongo, kanisa na esika nini osili kokweya, bongola motema na kotika masumu na yo, mpe sala lokola osalaki na liboso. Soki olingi kobongola motema na yo te, nakokuma epai na yo, mpe nakolongola mwinda na yo na esika na yango.
6 Kasi, ozali na likambo malamu oyo: yo oyini likambo oyo Banikolao basalaka, bobele lokola ngai nayini yango.
7 "Soki motu na motu azali na matoi, ayoka malamu likambo oyo Molimo azali koloba na mangomba! "Batu oyo bakolonga, nakopesa bango ndingisa na kolia mbuma na nzete ya bomoi oyo ezali kati na elanga na Nzambe." (Emoniseli 2:1-7)