quarta-feira, 23 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Tuatira

18 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Tuatira: "Mwana na Nzambe, oyo miso na ye ezali kopela lokola moto, mpe makolo na ye ezali kongenga lokola bronze oyo batu basili kongengisa alobi boye:
19 Nayebi makambo nyoso oyo ozali kosala. Nayebi bolingo na yo, mpe bosembo na yo. Nayebi ozali komipesa nyoso kati na mosala mpe ozali na motema na kolemba te. Nayebi ete mosala na yo na sik’oyo eleki mosala na yo na ebandeli.
20 Kasi, nazali na likambo oyo epai na yo: ozali kondima Izebele, mwasi oyo alobaki ete ye azali nebi na Nzambe. Ye azali kokosa basali na ngai, kolakisa bango na komipesa na kosala pite, mpe na kolia mosuni na nyama oyo batu bapesaka na makabo epai na banzambe mpamba.
21 Natikaki ntango mpo na ye kobongwa motema na kotika masumu na ye, kasi ye alingi kobongola te na kotika pite na ye.
22 Mpo na oyo, nakobwaka ye na mbeto na mpasi. Batu oyo basalaki pite elongo na ye bakoyoka mpasi mingi. Nakotika bango bobele soki babongoli motema na kotika misala mabe oyo basalaki elongo na ye.
23 Nakoboma bana na ye lokola, boye mangomba nyoso bakoki koyeba ete nazali motu oyo ayebi makanisi mpe mposa na batu. Nakofuta motu na motu lokola mosala na ye ezali.
24 "Kasi epai na bino, batu mosusu kati na Lingomba ya Tuatira, bino bosili kokangana na kolakisa mabe yango te, bosili koyekola te likambo oyo batu babengi ‘Makambo mojindo na Satana.’ Nalobi na bino nakotia mokumba mosusu likolo na bino te.
25 Kasi bokangana makasi na likambo oyo bozali na yango kino mokolo na koya na ngai.
26 Epai na batu oyo bakolonga, mpe bakokengela mosala na ngai kino nsuka, nakopesa na bango nguya likolo na mitinda,
27 nakopesa na bango nguya oyo ngai mpenza nazwaki epai na Tata na ngai: bakokamba bango na lingenda na mbeli, mpe bakobuka bango lokola mpoke na mabele,
28 mpe nakopesa na bango nyota na ntongo.
29 "Soki motu azali na matoi, ayoka likambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba!" (Emoniseli 2:18-29)