segunda-feira, 21 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Semuruna

8 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Semuruna: "Motu na liboso mpe motu na nsuka, motu oyo akufaki mpe asekwaki, alobi boye:
9 Nayebi mpasi na yo. Nayebi mosikini na yo—kasi ya solo ozali motu na mosolo! Nayebi likambo mabe oyo batu bazali koloba na nzoto na yo, bobele batu na kokanisa bazali Bayuda kasi bazali Bayuda te, bazali na lisanga na Satana!
10 Banga te mpasi oyo okozwa. Yoka: Satana akomeka bino na kobwaka mingi na bino na boloko. Bokoyoka mpasi kati na mikolo zomi. Zala motu na kobongwana te kino kokufa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.
11 "Soki motu na motu azali na matoi, ayoka malamu likambo oyo Molimo azali koloba na mangomba: "Batu na kolonga na etumba, kokufa na mibale ekobanda bango te." (Emoniseli 2:8-11)