quinta-feira, 24 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na Lingomba ya Sarudi

1 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na Lingomba ya Sarudi: "Motu oyo azali na milimo nsambo na Nzambe, mpe mioto nsambo alobi boye: Nayebi makambo nyoso oyo ozali kosala. Nayebi ete balobaka ozali motu na bomoi, nzokande osili kokufa.
2 Longwa na mpongi, kengela makasi likambo oyo ozali naino na yango liboso yango ekufa mobimba. Mpamba te namonaki ete misala na yo ezali malamu nyoso te liboso na Nzambe na ngai.
3 Bongo kanisa kolakisa oyo ozwaki, mpe kanisa ndenge nini oyokaki yango. Tosa yango, mpe bongwa motema na kotika masumu na yo. Soki olamuki na mpongi te, nakokuma kokamata yo lokola moyibi ntango ozali koyeba te na saa nini nakokuma.
4 Kasi, ozali na likambo oyo kuna na Sarudi, bobele batu mosusu oyo basili kobebisa bilamba na bango te. Bakotambola elongo na ngai kolata bilamba mpembe mpo bakokani.
5 Batu na kolonga, bakolatisa bango boye na bilamba mpembe. Nakoboma nkombo na bango na buku na bomoi te, nakoloba liboso na Tata na ngai mpe liboso na baanzelu na ye ete bazali batu na ngai.
6 "Soki motu azali na matoi, ayoka malamu likambo Molimo azali koloba na Mangomba!" (Emoniseli 3:1-6)