terça-feira, 22 de março de 2011

Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Peregamona

12 ¶ "Koma mokanda epai na anzelu na lingomba ya Peregamona: "Motu oyo azali na mopanga na kopela bipai mibale alobi boye:
13 Nayebi esika ozali kofanda, kiti na bokonzi na Satana ezali na esika yango. Osili kokangana na ngai makasi, mpe obwakaki kondima na yo epai na ngai te, bobele na ntango babomaki Antipa, temwe ya solo na ngai, na mboka na yo, na esika oyo Satana azali kofanda.
14 Kasi nazali na likambo mosusu epai na yo: ozali na batu mosusu epai na yo, oyo bazali kokangana na kolanda kolakisa na Balama, oyo alakisaki na Balaka kosala likambo na kokweisa Baisraele kati na masumu na kolia mosuni na nyama oyo batu bapesaka na makabo epai na banzambe mpamba mpe na kopesa bango mpenza na kosala pite.
15 Bobele boye, batu oyo bazali kokangana na kolakisa na Banikolao bazali epai na yo lokola.
16 Bongo bongola motema na kotika masumu na yo. Soki boye te, nakokuma epai na yo noki, mpe nakobunda na batu yango na mopanga oyo ezali kobima na monoko na ngai.
17 "Soki motu azali na matoi, ayoka malamu likambo oyo Molimo azali koloba na mangomba! "Batu oyo bakolonga na etumba, nakopesa bango mana oyo ebombami. Nakopesa bango lokola libanga mpembe na likolo na yango bakomi nkombo ya sika, oyo motu moko te ayebi, bobele motu na kozwa yango nde ayebi." (Emoniseli 2:12-17)